N° 124
KAKA OKATIYA BATO
1.
Kaka okati ya bato, bokonzi ya nzambe ezali, bokonzi ya bato mpe ezali, etumba monene okati ya moto « kati na Goliata mpe Dawidi » 2x
Refrain
Nzambe bondisa ngai ata na bapasi, ata na bisengo, etumba ekoya na tongo, to pe ekoya na pokwa, ata eye na butu Nzambe na ngai nazala na bomoi 2x
2.
Goliata atelemi akani makasi, akobundisa ye tina ya bokonzi, « Dawidi abeti ye libanga mpe akweyi elongina se » 2x
3.
Dawidi abundisamaki lolenge ebele, Goliata abundisi ye Saolo pe abundisi ye, « Saolo asepeli po abomaki nkama ya bato, Dawidi alongaki po akambaki nkoto ya bato » 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand