NAKOMBO YA TATA — Cantiques EUJC

N° 127

NAKOMBO YA TATA

1.

Na kombo ya tata Nzambe na ya muana mpe Molimo Santu

2.

Mobange atunaki yesu, yesu muana ya nzambe, « nasala nini pona oyo masumu na ngai elimbisama »

3.

Mokufi miso atunaki yesu, « nasala nini pona miso oyo ya ngai efungwama »

4.

Yesu mobikisi akufeli bato, amemaki masumu, « atangisaki makila pona masumu ya bato »

5.

Soki y’oboyi kolanda yesu, ndenge ye alobaki, « okozanga esika na likolo, okokota geena »

Refrain

Oh Yawe! Yawe Nzambe yamba biso na bokonzi ya lola (bokonzi ya lola) ebongisami ya seko Yawe Nzambe yamba biso