N° 150
BAKILISTO BANYOKWAMA
1.
Baklisto banyokwama ndenge enyokwamaki J esu mwana kokamwa te pona pasi eza moto kati na bino « ekoya lokola momekano lokola likambo ya sika, bokabola banso bapasi, bosambela Nzambe na bino » 2x
Refrain
(ya solo) monguna na bino satana akotambola lokola nkosi, akonguluma aluka eloko ya kolia botelemela ye banso makasi. 2x
2.
Soki bafingi bino pona kombo na ngai bozali n’esengo po na molimo ya lokumu pe molimo ya Nzambe ezo kita kati na bino « Moko na bino anyokwama te lokola mobomi to moyibi to mosali ya mabe nyoso amikotisa kati ya makambo » 2x
3.
Soki bokomi na molende ya kosala makambo malamu, bolanda liteya mosusu te kaka oyo ya kilisto. « Bokolata ekoti malamu bokolata elamba ya sika bokovanda banso na mesa ya mokonzi Yesu klisto » 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand