N° 154
NKOLO AKOLINGAKA ETE BANINGA
1.
Nkolo akolingaka ete baninga, nkolo akolingaka ete biso tosalelaka ye po ye akofuta biso, « tosalela ye mosala po ete tozua lifuti »2x
Refrain
Biso tokotambola na kombo na Yesu muana na Nzambe, kombo epesa biso nguya pona kosala mosala, mosala ata bapasi eyeli biso tokobanga te, biso totombolani miso na ekulusu ya Yesu masiya. 2x
2.
Nkolo akolingaka ete baninga, nkolo akolingaka ete biso tosambela ye pona koluka baninga, bazali kati na bowumbu po ete bazua lisungi, bazali kati na bowumbu po ete bazua bonsomi. 2x
3.
Mosala oyo likambo baninga, mosala oyo ezali na pasi, eza na nkoyi pe nkosi nionso, nyama ya kanda, bazali kati na biso pe babebisa mosala, bazali katina bango po babebisa mosala. 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand