N° 161
NDEKO KATI MOKOLO
Refrain
Solo baninga, ngai oyo mokilisto, bomoyi nazali nango nasala makambo boni? Solo baninga, ngai oyo mokilisto muana oyo nazali naye akatama ngenga boni ? « Ndeko yokamela » likambo esalaki Sefora tango bakendeki na Mose na butu wana. Yawe alingaki koboma ye, Sefora alokoti libanga, akataki ngenga ya muana, loposo abuakeli abuakeli Mose na makolo. « Kumisa Yawe na mayele nayo, tia elikia epayi ya Nzambe na bomoyi, salela ye mosala »
Ekokaki mokolo, mokolo oyo ya muambe po bakata Yesu ngenga, bamemaki ye na ntempelo pona kokata ye. « Simeona amemi ye na maboko pe akumisaki Yawe Nzambe, Ana pe akumisaki mokeli alobelaki tina na bosomi ya bokilisto »
Kokata ngenga elembo ya kondimana ya Nzambe na bato, ndenge endimanaki Yawe na koko Abalayama pona kokata ye. « Muana mobali ya ndako na bino esengeli akatama ngenga, ezala ata asombamaki na mbongo esengeli akatama ngenga, ata oyo abotami na ndako esengeli akatama ngenga pona bokilisto »