NAZALAKI KOTAMBOLA — Cantiques EUJC

N° 162

NAZALAKI KOTAMBOLA

1.

Nazali kotambola tongo pe pokwa, nazalaki koyemba nzembo butu pe moyi « koyembela Nzambe na bibele amonanaka te » « Mawa na Nzambe ekiti lelo, nazui bomoyi » 2x

Refrain

(Nzambe na ngai), lelo kembo ekiti, eza kati na nga, ezalaki na tata pe tata kati na nga, nyonso kati na muana pe muana kati na nga. 2x

2.

Lelo nasakoli bato oyo nayokaki, natalaki pe namonaki na miso na nga, (makambo)«nasimbaki na maboko, na tina bomoyi», (solo) « bomoyi ezalaki na tata, eza kati na nga » 2x

3.

Bino basakoli Nzambe aza molimo, botika kotungisa bato na makambo ya molili, ya mokili eza elilingi ya makambo ya molimo « oyo liso etikala te komona, litoyi etikala te koyoka, oyo etikala pe te komata na mitema ya bato ».2x