KOBOTAMA YA EZAWU PE YAKOBO — Cantiques EUJC

N° 19

KOBOTAMA YA EZAWU PE YAKOBO

1.

(Kobotama) kobotama ya Ezau pe Yakobo bana ya mapasa kati na Lebeka mabota mibale ekobima na libumu

Refrain

Biso tokumisa nzambe lokumu ya nzambe na lola Yakobo mwana lokumu ya nzambe na lola loboko na ye lokumu ya nzambe na lola na litingi na ye lokumu ya nzambe na lola

2.

(Ezau eh) Ezau azalaki moluki niama nzoto ya motane pe kunza ebele yango kombo na ye ebiangamaki Edoma 2x

3.

(Yakobo eh) Yakobo azalaki moto na kimia oyo avanda na kati ya ema nzambe alingi Yakobo ayini Ezau penza 2x