KALA NA EBANDELI — Cantiques EUJC

N° 2

KALA NA EBANDELI

1.

Kala na ebandeli nzambe akelaki lola pe mokilina mayi monana solo ha <<molimo na nzambe ezalaki kotambola likolo ya mayi>> 2x

Refrain

(Solo biso) tolongwa na mokili oyo, totambola likolo ya mayi, tokomata likolo ya nzambe tata, nzambe na bomoyi. Mokili ezali nzoto, lola nde molimo ya nzambe, solo mayi mateya ya nzambe, moyi boyebi ya solo, molili ezali bozangi 2x

2.

Nzambe akabolaki pole na molili, pole nde moyi molili nde butu solo ha. Yo tata ozali pole to ozali molili, yo mama, ozali pole to ozali molili 2x

3.

Mokili ebotisaki matiti nionso, bileyi na nzete, na mbuma na nkona solo ha. <<Bana na nzambe tobota mbuma mbuma ya malamu>> 2x

4.

Nzambe akelaki biloko oyo eza na bomoyi, niama pe ndeke, na mbisina mayi solo ha. << Moto azalaki mokonzi ya biloko nionso>>. Toyembela ye nzambe hehe nzambe na bomoyi, tokumisa ye nzambe hehe nzambe na bomoyi, tonyetola ye nzambe na hehe nzambe na bomoyi 2x