N° 24
MOKILI EZALISAKI TATA NZAMBE
Mokili ézalisaki tata nzambe kala ézalaki na bileyi pe mafuta ya nzoyi bato bazalaki na sayi kokumisa yawhe pasi pe kufa ezalaki na bango te 2x
Refrain
Mokili ya solo baninga ah ah ya solo mokili ah ya solo mokili soki mokili ézali na pasi pe kufa soki mokili ézindisi bato pe eleyi nzambe nkolo bato ye ako sala nini Mokili ya solo baninga ah ah ah ya solo mokili ah ya solo mokili soki mokili ezali na pasi pe kufa soki mokili ézindisi bato pe eleyi nzambe nkolo bato ye akongombela mokili
Lola mokili joka osembolaka litoyi Nzambe atiaki biso lokola batatoli na ye atiyaki kufa,atiyaki pe bomoyi soki olandi kufa yo kozala na kufa soki olandi bomoyi yo kozala na bomoyi 2x
Nzambe atiaki basakoli mpo bateyaka basusu,bato balingaki bokoko pe kobeta bwanga soki ozali ko bebisa bato pe ko boma,nzambe nkolo bato ye akongombela mokili 2x