N° 26
NAKUMISI NZAMBE
1.
Nakumisi nzambe Tata wa bokasi po awa na mokili mosusu azali te kaka yo nde ekimelo na ngayi nakumisi yo yawhe 2x
Refrain
Yemba aleluya nakumisi nzambe wa bokasi ( nzambe wa bokasi) po mosusu azali te na mokili oyo kaka yo nde mosakoli na nga nakokumisa bileko binso 2x
2.
Nakumisi Yesu mobikisina nga ye akufelaki nga na ekulusu nasakoli bato pona nkembo na ye nakumisi yo Yawhe 2x
3.
Nakumisi molimo mosantu ye nde mokambi na nga bipayi binso ata na ba pasi ata na bisengo nakumisi yo Yawhe 2x
4.
Bandeko baninga tokumisa Yawhe kokumisa bato eza na bomoyi te bomoyi ya seko epayi na yawhe soki tomokumisi 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand