ESILISAKI NZAMBE KOKELA BILOKO — Cantiques EUJC

N° 33

ESILISAKI NZAMBE KOKELA BILOKO

1.

Esilisaki nzambe kokela biloko,akanisaki po akela moto,na élilingi ya nzambe Tata oy’ akokani na nzambe(alleluia)

Refrain

Nzambe amikeli na nzoto ya moto asali mabele pe atiaki pema na ye moto atelemi penza,pe atalaki nzambe,ayebaki epay’ awuti te na manso basaleli ye,nzambe abiangaki moto pe moto andimeli ye <<oh moto adendaki,oh moto asepelaki,(alleluia) pe banjelu na likolo basepelaki elongo,bayembaki, bakumisaki mokeli na nyons o>>

2.

Po alakisa biso bomoto bwa ye, amimonisaki epayi ya Mose, atindaki Yesu lokola moto, << na nzoto oyo ya masumu>> (hozana)

3.

Oy’alingi te moto asili komona, alingi nzambe oyo amonani te, po nzambe azali na zoto ya moto te, tango nini akomona ye (hozana) kaka mokolo ya suka(alleluia)