MAKAMBO NIONSO YA MOKILI OYO — Cantiques EUJC

N° 34

MAKAMBO NIONSO YA MOKILI OYO

1.

Makambo nionso ya mokili oyo eniokoli nga na bisambiselo <<éleki na kolia pe komela, motema na ngayi etungisami> >

Refrain

(alleluia baninga) Pasi baninga motema na nga etungisami (etungisami), soki nayebaki nakokaki kobotama te (kobotama te) nde na kufelaki na libumu ya mama (ya mama na nga), po namona minioko ya mokili oyo te

2.

Mokolo yango nabotamaki baboti na nga pe bato mosusu, <<ba sepelaki pe ba melaki, lelo oyo bango bayoki mawa>> 2x

3.

Nakopamela mokolo yango nabotamaki na libumu ya mama, pe na mabele ya mama na nga ezalaki po ete namela yango<< molili ekokanga mokili pona mokolo yango na botamaki> >2x