EBANDELI YA SANGO MALAMU — Cantiques EUJC

N° 36

EBANDELI YA SANGO MALAMU

1.

Ebandeli ya sango malamu ya kilisto, Yoane mwana ya Zekalia nganga ya nzambe, Zekalia na tempelo pona kutumba mbeka, mwanje malamu ya nzambe abimelaki ye

Refrain

Yo Zekalia zala kimia kino mokolo ekobota Elizabete mwana mobali, opesa kombo Yoane pona ye oyo akobongola mitema ya bana isabele 2x

2.

Ekokaki mokolo ya Elizabete, ye abotaki mwana, mwana mobali na libota na ye banso bateleme ye po apesa muana kombo, kombo zekalia

Refrain

Yo Tata yo mama ozali Zekalia, oyeba malamu kombo okopesa mwana, libota na yo bakolinga opesa Zekalia, kasi nzambe akolinga opesa Yoane 2x

3.

Yoane akolaki na motema ya Zekalia, azalaki na lisobe kati na bato te kino kino amonanaki epayi isalele, bileyi na ye mayoyo pe mafuta nzoyi