N° 56
NA NDAKO YA TATA EZA BISIKA MINGI
1.
Na ndako ya tata eza bisika mingi, Yesu abongiseli biso bisika kuna toyeba koliya na ye mikolo nionso,toyoka soni ata mokolo moko te
Refrain
Ngai na poni na nga,ngai na poni kovanda na ndako ya tata na nga << nazala likonzi na ndako ya tata libela na libela >>2x
2.
Lelo nga na kobeta n’ékuke nayo, fongolola ngai tata nakosenga, olatisa ngai élamba ya makwela,po naliya na ba mpaka esika moko 2x
3.
Libanda molili na esuelo ya mino,malili makasi nga nakolonga te na kosenga nayo tata na ngayi,nkumu mokonzi nzambe yokela nga 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand