N° 66
LUCIFELO
Yo mwanje na kongenga yo monzoto ya tongo (lucifero) olingamaki mingi na nkolo nzambe na yo, « alatisa yo mabanga ya talo, mabanga ya motuya » 2x
Refrain
Kasi mombongo na yo etondisaki yo na mabe, wuta katikati ya mabanga ya moto oyo Osalaki mabe (lucifelo)olobaki ete nakomata likolo koleka monzoto ya tongo, (lucifelo) alobaki ete nakobuta likolo koleka ngomba ya Nzambe 2x
Mabanga ya talo lucifelo,olatisamaki tala samali,pe topaze,pe y’ amali,kulusulite,pe soama,pe yasipi,safili,samala,balekete,wolo 2x
Bitumba ebimaki likolo, Mikaele na ba anje na ye, kobunda na satana na mapinga na ye nionso, zabolo abuakamaki nase na mapinga na ye nionso, satana abuakamaki nase na mapinga na ye nionso 2x Sepela o likolo, na ba anje na ye nionso Pamela na mokili na bafandi na mayi Esengo na ba oyo bazali kati na yezu 2x