YEZU MWANA YA NZAMBE — Cantiques EUJC

N° 74

YEZU MWANA YA NZAMBE

1.

Yesu mwana Nzambe mobateli malamu, akosengaka na bato ya nzambe, batika matongi, batika likunya pe bokabwani ya mokili 2x

Refrain

(ngayi) : nakosala, nakosala, nakosala ndenge ye alingi, (yawhe Nzambe) nakosala, Yesu na nga nakosala, nakosala, naboyi kopengwa 2x

2.

(bino) bino bato ya Nzambe bomitunaka penza, tango nini ékoya mwana ya Nzambe, akokoma na tongo to kokoma na moyi, soki akokoma na butu 2x

3.

(bino) bino pe na bakambi bomitunaka solo, bosala te lokola Mose ya Nzambe, ye akambaki te ndenge Nzambe alobaki, akomisaki te ban’isalele 2x