NZAMBE ATINDAKI MWANA NA YE — Cantiques EUJC

N° 80

NZAMBE ATINDAKI MWANA NA YE

1.

Nzambe atindaki mwana naye, pona ba pasi na biso pe kolela, po ete oy’ akondimela ye akufa te, ye azala na bomoyi ya seko oh oh oh alleluya 2x

Refrain

(Totondi Yawhe) Totondi Yawhe eh Nzambe tata, totondi mwana ah nkolo Yesu, totondi molimo mosantu pona bosungi bwa ye 2x

2.

Yesu anyokwamaki na ba pasi, ba pota na maboko pe na makolo “kaka po na biso tozuwa bomoyi po ete tozonga te na mikakatano oh oh ohya satana” 2x

3.

Yesu atikaki élaka naye, nakonyokola bato nasili kolinga “ba pasi na bango ékosila soki balandi liloba ya tata na nga oh oh oh Nzambe tata” 2x