N° 82
BANA ISALELE BAKOTAKI NA BOWUMBU
1.
Bana Isalele bakotaki na bowumbu ya falo<< po batekaki ndeko na bango, Yosefu liloba Nzambe>> 2x
Refrain
(ndeko na nga) soki osili koteka solo liloba ya Nzambe nayo (po y’ ozongela) po y’ ozongela okonyokwama pe okolela solo 2x
2.
Nzambe ayokaki kolela, pe atindaki Mose (eh Mose) <<kobimisa bango na bowumbu, na liboso ya falo>>2x
3.
Ezalaki Mose na lisobe koleyisa bampate (eh Mose) « amonaki nzele epeli moto apusani pembeni» 2x
4.
Ayokaki mongongo na nzete uta epayi na yahwe (eh mose) « longola sapato na makolo esika oyo ya bule » 2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand