NOWA NA BWATO — Cantiques EUJC

N° 91

NOWA NA BWATO

1.

Nowa na bwato atindaki yanganga (2x) kende omeka mayi soki ekiti na mokili( 2x) boyoka sango yanganga abimaki akeyi yasolo baninga,tala atindami akeyi solo kovanda yasolo atikali kodiembela yasolo baninga aboyi kozongela Nowa 2x

2.

Nowa na kanda ya likambo ya yanganga 2x Nowa atindi ndeke nini Nowa atindaki ebenga 2x boyoka sango ebenga abimaki akeyi ya solo baninga asosolaki pe ye azongeli Nowa ya solo na likasa abukaki yasolo baninga asilisaki mosala 2x

3.

Adama na Ewa tala bango babungaki (2x) Nzambe azalaki na bango bango batshiolaki bomoyi 2x boyoka sango bato balakelami mabe ya solo baninga pona kilikili lokola nzambe alobaki ya solo bango batshiolaki bomoyi yasolo baninga pasi eyelaki bango 2x

4.

Yo na ngayi totindami na mosala 2x mosala oyo biso nayo kosalisa milimo ya bato 2x boyoka sango Nzambe apesi mosala yasolo baninga kasi tosali to pe tovandina yango ya solo ndenge yanganga asalaki ya solo baninga atikali kodiembela ya solo baninga aboyi kozongela Nowa 2x

5.

Bandeko na nga baye balali lamuka 2x biso oyo nde tokomi bana ya Nzambe na bomoyi 2x boyoka sango baye balali lamuka yasolo baninga bokokende na biso to bozali kolala ya solo lamuka ozua bomoyi ya solo baninga bomoyi nde Yesu na lola 2x