N° 58
YESU ALOBAKI NA TATA
1.
Yesu alobaki na tata nakokende na mokili ah alleluya nakeyi kobikisa nionso ésilaki kobunga <<(kasi moto oyo)oyo akondima liloba akoki kokufa te>> 2x
Refrain
(Totondi yawhe) totondi yawhe nzambe tata mpo molimo ekiti (Totondi mwana) totondi mwana nkolo yezu maloba ekokisami (Totondi molimo) totondi molimo mosantu ekoti na mitema Kasi lelo toyemba: lelo toyemba kembo kembo kembo kembo esengo 2x
2.
Yesu alobaki na bayekoli na ye soki nakeyi bo sepela ah alleluya, sima mosungi akokita pona komema bino<<molimo mosantu aye komema batu na ye bana ya isalela>>2x
3.
Lelo molimo ekitina baye bandimelaye ah, alleluya bakoti na mboka ya sika, mboka ya siona<<(na yelushalema)yelushalema ya likolo nde mboka ya esengo >>2x
Affichage
Petit
Normal
Grand
Très grand