NA NGOMBA YA SIONA — Cantiques EUJC

N° 645

NA NGOMBA YA SIONA

1.

Na ngoma ya siona <<Yesu abimelaki bayekoli na ye>> na ngomba molayi solo <<molimo ékitelaki biso na mitema>>2x

Refrain

Yawhe Nzambe molimo ékiti na nzoto na biso,(batela)batela mwana ozua bomoyi(batela Yesu)batela Yesu ozwa bomoyi 2x

2.

Mokolo ya pentekote lokito elekaki na ndako ya likolo mopepe elekaki éningisaki lola, mokili kolenga 2X

3.

Nzete malamu eboti bayebaka yango eh na mbuma na y’ango, moto abotami sika <<amonanaka solo na misala na ye>>2x